Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 10:27 - Mokanda na Bomoi

27 Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi, kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 10:27
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya. Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu.


Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo ; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.


Nakopesa ye bomoi molayi mpe nakolakisa ye lobiko na ngai.


Ata bakomi mibange, babotaka kaka, bazalaka kaka makasi mpe kitoko,


Kotosa Yawe ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.


Moto oyo atambolaka na bosembo akozwa lobiko, kasi moto ya mobulu oyo alandaka banzela mibale akokweya na moko.


Kati na loboko na Ye ya mobali, ezali na bomoi ya molayi ; mpe kati na loboko na Ye ya mwasi, ezali na lokumu mpe bomengo.


pamba te ekoyeisa mikolo ya bomoi na yo milayi, ekobakisa mibu ebele na bomoi na yo mpe ekomemela yo kimia.


Pamba te, na nzela na ngai, mikolo ya bomoi na yo ekokoma ebele, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.


Kolekisa ndelo te ya kozala moto mabe to ya kozala zoba ; mpo na nini kokufa liboso ete mikolo ya bomoi na yo ekoka ?


Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.


Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »


mpe kowumela mingi kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai ya bakitani na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ