24 Makambo oyo moto mabe abangaka, yango kaka nde ekomelaka ye, kasi baposa ya moto ya sembo ekokokisama.
Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye, bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia.
Makambo oyo nazalaki kobanga, yango nde ezali kokomela ngai ; oyo nazalaki koyokela somo, yango nde ezali kosalemela ngai.
akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye, ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye.
Yawe, mokonzi azali kosepela na nguya na Yo; Tala ndenge nini elonga oyo opesi ye epesi ye esengo monene !
Komisa Yawe bilengi na yo ya makasi, mpe akokokisela yo posa ya motema na yo.
Ngai mpe nakoseka bino tango pasi ekoyela bino, nakotiola bino tango minyoko ekokomela bino,
tango minyoko ekokomela bino na pwasa lokola mvula ya kake makasi, tango somo ekoyela bino lokola ekumbaki, tango mawa mpe somo ekokomela bino.
Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.
Boye, Ngai mpe nakotindela bango pasi mpe nakotindela bango pasi oyo babangaka. Pamba te tango nabelelaki, moto moko te ayanolaki ; tango nalobaki, moto moko te ayokaki ; kasi basalaki makambo mabe na miso na Ngai mpe baponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. »
Bozali kobanga mopanga ? Solo, Ngai, nakotindela bino mopanga, elobi Nkolo Yawe ;
Wana azalaki nanu komilobela, mongongo moko ewutaki na likolo, elobaki : — Tala makambo oyo ekatami mpo na yo, mokonzi Nabukodonozori : « Nguya ya bokonzi elongwe na maboko na yo.
Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama !
Nakotika bino te lokola bana bitike ; nakozongela bino.
Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.
ekotikala kaka kozela na somo penza kosambisama mpe moto makasi oyo ekozikisa banguna ya Nzambe.