23 Kosala mabe esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi bwanya esepelisaka moto ya mayele.
Bazoba balingaka te kosenga bolimbisi, kasi ngolu na Nzambe ezalaka kati na bato ya sembo.
Bozoba esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi moto ya mayele atambolaka alima na nzela na ye.
Babengaka moto oyo azali na motema ya bwanya moto ya mayele, mpe bibebu ya kimia ebakisaka boyebi.
na bato oyo basepelaka kosala mabe, na bato oyo bazalaka na esengo ya kokota na bozindo ya mabe,
Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.