20 Lolemo ya moto ya sembo ezali lokola palata ya talo, kasi motema ya moto mabe ezali na tina te.
Yawe amonaki ndenge nini mabe ya moto ekomaki mingi kati na mokili, mpe tango nyonso, makanisi ya motema ya moto ezalaki kaka mabe.
Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.
Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya, mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo.
Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.
Maloba ya kimia ezali lokola nzete ya bomoi, kasi maloba ya botomboki ezokisaka motema.
Bakonzi balingaka maloba ya solo, mpe bapesaka moto oyo alobaka na bosembo lokumu.
Wolo mpe babiju ezalaka na yango ebele, kasi bibebu oyo ebimisaka boyebi eleki na motuya.
pamba te azalaka ndenge makanisi ya motema na ye ezali. Alobaka : « Lia mpe mela, » kasi motema na ye ezali elongo na yo te.
Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko.
Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?