Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 10:19 - Mokanda na Bomoi

19 Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 10:19
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano ? Moto oyo azali koloba alonga na ye, kaka mpo ayebi koloba ?


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi mpe ya Yedutuni. Nzembo ya Davidi.


Moto oyo atiolaka moninga na ye azangi mayele, kasi moto ya mayele avandaka kimia.


Moto oyo aswanaka abimisaka basekele, kasi moto oyo azali na molimo ya sembo abombaka basekele.


Moto ya mayele abombaka boyebi, kasi motema ya zoba etatolaka makambo ya bozoba.


Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.


Kowelela te kofungola monoko na yo, mpe tika ete motema na yo ewelela te kobimisa liloba liboso ya Nzambe ! Pamba te Nzambe azali na likolo, mpe yo ozali na mabele. Boye, tika ete maloba na yo ezalaka mingi te !


Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi, ndenge wana mpe maloba ebele ebimisaka bozoba.


Soki olapi ndayi liboso ya Nzambe, kowumela te mpo na kokokisa yango ; pamba te Nzambe asepelaka na bazoba te ; kokisa ndayi na yo.


Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;


Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ