Bayekoli bakamwaki mingi mpo na maloba na Ye. Kasi Yesu alobaki na bango lisusu : — Solo, bana na Ngai, ezali pasi mpo na kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !
Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.