12 Koyina ebendaka koswana, kasi bolingo ezipaka mabe.
Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.
Moto ya Beliali abongisaka kosala mabe, mpe maloba na ye ezali lokola moto oyo etumbaka.
Moto oyo abombaka mabe alukaka bolingo, kasi moto oyo azongelaka yango tango nyonso akabolaka bato oyo balingani.
Moto ya lokoso ayeisaka koswana, kasi moto oyo atiaka elikya na Yawe akotonda na mafuta.
Moto ya kanda amemaka koswana, mpe moto oyo atombokaka noki akomaka na mabe koleka.
pamba te kobeta-beta mabele ebimisaka manteka, kobeta zolo ebimisaka makila, mpe kotumbola kanda eyeisaka koswana.
Koswana mpe bitumba kati na bino ewutaka wapi ? Boni, ewutaka te na baposa mabe na bino, oyo ebundaka kati na banzoto na bino ?
boyeba ete moto oyo azongisi mopengwi longwa na libunga abikisi ye na kufa mpe asali ete masumu ebele elimbisama.
Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele.