Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 10:1 - Mokanda na Bomoi

1 Masese ya Salomo : Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi mwana ya zoba ayokisaka mama na ye pasi na motema.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 10:1
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele :


Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.


Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi moto oyo azangi mayele atiolaka mama na ye.


Kozala na mwana ya zoba esalaka pasi na motema, mpe tata ya moto ya liboma akotikala kozala na esengo te.


Mwana oyo azangi mayele apesaka tata na ye mawa, mpe ayokisaka mama na ye pasi na motema.


Mwana ya zoba azali pasi mpo na tata na ye ; koswana ya mwasi ezali lokola linzanza ya ndako, oyo etangisaka mayi tango nyonso.


Tala masese mosusu ya Salomo oyo bato ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, bakomaki.


Mwana na ngai, zala moto ya bwanya mpe sepelisa motema na ngai, mpo ete nazala na eyano ya kopesa na moto oyo akoluka kotiola ngai.


Fimbu mpe pamela epesaka bwanya, kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.


Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.


Moto oyo alingaka bwanya asalaka esengo ya tata na ye, kasi moto oyo alandaka basi ya ndumba akosilisa bomengo na ye nyonso.


Mosakoli azalaki kaka moto ya bwanya te, kasi azalaki mpe koyekolisa bato boyebi ; akanisaki mingi, alukaki mingi mpe atiaki na molongo masese ebele penza.


Bongo, nani ayebi soki moto yango akozala moto ya bwanya to zoba ? Nzokande, ye nde akozala na bokonzi na likolo ya misala nyonso oyo nabimiselaki motoki mpe mayele na ngai na se ya tango. Yango mpe ezali kaka pamba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ