Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 1:7 - Mokanda na Bomoi

7 Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ; bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 1:7
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya ! Koboya mabe, yango nde mayele ! »


Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.


« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?


Moto oyo asundolaka koyekola atiolaka nde bomoi na ye moko, kasi moto oyo andimaka pamela akomaka mayele.


Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ; komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye, kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.


Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa tango ya kokanisa, kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.


okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini mpe okozwa boyebi ya Nzambe.


Kolobaka na zoba te, pamba te akotiola bwanya ya maloba na yo.


Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.


Yoka suka ya mateya nyonso : Tosa Nzambe mpe batela mibeko na Ye, pamba te yango nde eleki na tina mpo na moto.


Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te.


Botosa yango mpe bosalela yango na bokebi ; yango nde ekokomisa bino bato ya bwanya mpe ya mayele na miso ya bikolo oyo bakoyoka sango ya mitindo mpe mibeko yango ; mpe bakoganga : « Solo, libota monene oyo ezali na bato ya bwanya mpe na bato ya mayele. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ