Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 1:6 - Mokanda na Bomoi

6 mpo na kososola masese mpe sambole, maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 1:6
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Monoko na ngai ekoloba maloba ya bwanya ; motema na ngai ekanisi makambo oyo ekopesa bino bososoli.


Nakofungola monoko na ngai mpo na lisese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na tango ya kala.


Makambo oyo mpe ezali toli ya bato ya bwanya : Kopona bilongi, kati na kosambisa, ezali malamu te.


Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola banzube, mpe buku ya masese na bango ezali lokola basete oyo ekotaka makasi na libaya. Masese yango nyonso ewuti epai ya Mobateli mpate moko.


Na suka ya bokonzi na yango, tango batomboki bakokolisa mabe na bango kino na suka, mokonzi moko ya motema makasi mpe ya mayele mabe akobima ;


Nasololaka na ye elongi na elongi, na polele penza kasi na masese te. Amonaka lolenge ya Yawe. Mpo na nini bozali na somo te ya kotonga Moyize, mosali na Ngai ?


Yesu alobaki na bango : — Epesameli bino koyeba mabombami ya Bokonzi ya Nzambe ; kasi mpo na ba-oyo bazali na libanda, makambo nyonso ezali kotalisama na masese ;


azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso.


Bilei ya makasi ezali mpo na mikolo, ba-oyo bayebi kokesenisa malamu mpe mabe.


Azali kokoma bongo kati na mikanda nyonso epai wapi azali kolobela makambo yango. Kati na mikanda yango, ezali na makambo mosusu ya makasi mpo na kososola ; bongo bato oyo bazangi boyebi mpe balendisama malamu te na kondima bazali kobongola ndimbola na yango, ndenge kaka bazali mpe kobongola ndimbola ya biteni mosusu ya Makomi, mpo na libebi na bango moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ