Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 1:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tika ete moto ya bwanya ayoka yango, mpe akobakisa bwanya na ye, bongo moto ya mayele akoyeba mayele ya kotambolisa bato ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 1:5
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye : — Kata ! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi ? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo ! Mosakoli abendaki nzoto ; kasi, liboso ya kokende, alobaki : — Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo.


Boye, bino bato ya mayele, boyoka ngai ! Ekoki kosalema te ete Nzambe asala mabe ; ekoki kosalema te ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso asala makambo oyo ezangi bosembo.


Soki ozali na boyebi, yoka maloba oyo ; yoka makambo oyo nazali koloba.


« Bino bato ya bwanya, boyoka maloba na ngai ; bino bato ya mayele, boyoka ngai !


Bato ya mayele mpe bato ya bwanya oyo bazali koyoka ngai balobaki :


Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.


Motioli alukaka bwanya mpe azwaka yango te, kasi boyebi eyaka na pete epai na moto ya mayele.


Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele, mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka boyebi.


Beta motioli fimbu, mpe zoba akozwa mayele ; sembola moto ya mayele, mpe akozwa boyebi.


Tango bapesaka motioli etumbu, zoba akomaka moto ya bwanya ; mpe tango bapesaka malako epai ya moto ya bwanya, azwaka solo boyebi.


Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya, bomeka kobwaka yango te !


Kopamela motioli te, noki te akoyina yo ; kasi pamela moto ya bwanya, mpe akolinga yo.


Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu na bwanya koleka ; teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye.


Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli ; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.


Nazali koloba na bino lokola na bato ya mayele ; botala bino moko soki makambo oyo nazali koloba ezali malamu to mabe.


Botosa yango mpe bosalela yango na bokebi ; yango nde ekokomisa bino bato ya bwanya mpe ya mayele na miso ya bikolo oyo bakoyoka sango ya mitindo mpe mibeko yango ; mpe bakoganga : « Solo, libota monene oyo ezali na bato ya bwanya mpe na bato ya mayele. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ