Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 1:33 - Mokanda na Bomoi

33 kasi moto oyo ayokaka Ngai akovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 1:33
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki batosi mpe basaleli Ye, bakolekisa mikolo na bango oyo etikali na bomengo, mpe mibu na bango na esengo.


Mpo na yango, natikaki bango kotambola kolanda baposa ya mitema makasi na bango ; mpe balandaki makanisi na bango.


Mabe moko te ekokomela bayengebene, kasi bato mabe bakotondisama na pasi.


Moto oyo atosaka Yawe akomaka na kondima makasi, mpe bana na ye bakozwa ekimelo.


Pamba te, na nzela na ngai, mikolo ya bomoi na yo ekokoma ebele, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.


Atako moto oyo asalaka masumu asali mabe mbala nkama moko mpe awumeli tango molayi na bomoi, nayebi solo ete bato oyo batosaka Nzambe bakozala bato ya esengo ; pamba te bazali na botosi liboso na Ye.


Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.


Mbuma ya bosembo ekozala kimia : bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.


Oh ! Soki osalaki penza keba na mibeko na Ngai, kimia na yo elingaki kozala lokola ebale, mpe bosembo na yo, lokola mbonge ya ebale monene ;


Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.


Bosalela bikateli na Ngai mpe botosa mibeko na Ngai, bongo bokowumela na kimia kati na mokili ;


mpe mabele ekobota mbuma na yango, bokolia mpe bokotonda mpe bokovanda na kimia.


Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »


Soki boyoki basango ya bitumba mpe ya mobulu, bobanga te ; pamba te makambo wana esengeli nanu kosalema, kasi ekozala mbala moko suka ya mokili te.


ba-oyo Nzambe abatelaka na nguya na Ye, na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ekomonisama na tango ya suka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ