Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 1:31 - Mokanda na Bomoi

31 bakolia mbuma ya etamboli na bango mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 1:31
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kolanda makambo oyo ngai nasili komona, bato oyo basalaka mabe, mpe ba-oyo balonaka minyoko, babukaka mpe kaka mabe lokola mbuma ;


Mpo na yango, natikaki bango kotambola kolanda baposa ya mitema makasi na bango ; mpe balandaki makanisi na bango.


Na nzela ya mbuma ya monoko na ye, moto akotondisama na bolamu ; mpe moto akozwa lifuti ya misala ya maboko na ye.


Mbuma ya monoko eleisaka moto bilei ya malamu, kasi molimo ya moto oyo atambolaka na bosembo te ememaka na mobulu.


Bato oyo batambolaka na boyengebene te bakozwa lifuti kolanda misala na bango, kasi moto ya sembo mpe akozwa lifuti kolanda misala na ye.


Moto oyo alonaka masumu abukaka pasi, mpe makasi ya kanda na ye nyonso ekosuka.


Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,


akokufa likolo ya bozoba, mpe liboma na ye ekobungisa ye nzela.


Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko : moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »


Boye, Ngai mpe nakotindela bango pasi mpe nakotindela bango pasi oyo babangaka. Pamba te tango nabelelaki, moto moko te ayanolaki ; tango nalobaki, moto moko te ayokaki ; kasi basalaki makambo mabe na miso na Ngai mpe baponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. »


Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki.


Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Nakopesa yo etumbu kolanda misala na yo, elobi Yawe, nakopelisa moto na zamba na yo, mpe ekotumba nyonso oyo ezali zingazinga na yo. › »


Oh mabele, yoka ! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.


Yango wana, nakosopela bango kanda na Ngai ya makasi mpe natumba bango na moto ya kanda na Ngai, nakopesa bango etumbu kolanda etamboli na bango, elobi Nkolo Yawe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ