Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »
Nafungolelaki mobali na ngai ya motema ndako, kasi akendeki na ye mpe alimwaki. Nakweyaki mayanga wana azalaki koloba ; nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te ; nabengaki ye, kasi ayanolaki ngai te.
Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino ; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela bango pasi ya makasi, mpe ata moto moko te akobika na yango. Ata soki bagangi epai na Ngai, nakoyoka bango te.
Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te ; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka.
Mpo na yango, Ngai mpe nakopesa bango etumbu na kanda, nakoyokela bango mawa te mpe nakobikisa bango te. Ata bagangi na matoyi na Ngai, nakoyoka bango te. »