26 Ngai mpe nakoseka bino tango pasi ekoyela bino, nakotiola bino tango minyoko ekokomela bino,
Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kuna na likolo aseki, Yawe atioli bango.
Kasi Yawe asekaka bato mabe, pamba te ayebi ete mokolo na bango ezali kobelema.
Na nzela ya minoko na bango, babimisaka na bibebu na bango maloba oyo ezokisaka lokola mipanga ; bamilobelaka : « Nani azali koyoka biso ? »
Makambo oyo moto mabe abangaka, yango kaka nde ekomelaka ye, kasi baposa ya moto ya sembo ekokokisama.
Bwanya epesaka moto lokumu, kasi motema mabe ememaka kotiolama.
Etumbu esalema mpo na batioli, mpe fimbu esalema mpo na bazoba.
asambwisaka batioli, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka.
Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa, akobukana mbala moko, mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te.
Pamba te, nazali koloba na yo : moko te kati na bato oyo babengamaki akolia biloko ya feti na ngai. »
Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino ; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango.
Bokende koganga epai ya banzambe oyo boponaki mpo ete ebikisa bino awa bozali kati na pasi.