22 « Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?
Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
Namoni bondumba na yo mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ; ekobo na yo ezali na soni ata moke te. Namoni banzambe na yo ya bikeko na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te ! Kino tango nini okozala mbindo ? »
Yesu alobaki : — Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.
Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !
mpe alobaki : — Ah, soki kaka yo mpe oyebaki, na mokolo ya lelo, makambo oyo elingaki komemela yo kimia ! Kasi sik’oyo, ezali ya kobombama mosika na miso na yo.
Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.