18 Kasi bango, batiaka mitambo mpo na kosopa makila na bango moko, bamilukelaka pasi na bomoi na bango.
Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.
Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo ; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.
Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.
Soki balobi na yo : « Yaka elongo na biso, tika ete tosala motambo mpo na koboma bato, tokosepela mpo na kokanga moto oyo ayebi likambo te !
Solo, ezali pamba kotia monyama liboso ya miso ya bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.
Lokola bosembo ememaka na bomoi, moto oyo alandaka nzela ya mabe alandaka nde nzela ya kufa.
Bosembo ya moto oyo atambolaka alima ekomisaka nzela na ye sembo, kasi moto mabe akokweya mpo na mabe na ye moko.
Moto oyo amitungisaka mpo ete abomi moninga akimaka kino na libulu ya kufa ; tika ete moto moko te akanga ye nzela.
Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.