17 Solo, ezali pamba kotia monyama liboso ya miso ya bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.
Ye oyo ateyaka biso koleka banyama ya mokili mpe akomisaka biso mayele koleka bandeke ya likolo, azali wapi ? ›
pamba te makolo na bango ekimaka mbangu mpo na kolanda mabe, mpe bapotaka mbangu mpo na kosopa makila.
Kasi bango, batiaka mitambo mpo na kosopa makila na bango moko, bamilukelaka pasi na bomoi na bango.
kino tango likonga ekotobola ye motema, lokola ndeke oyo ekeyi mbangu na motambo na kozanga koyeba ete ekeyi kokufa.
Ngombe eyebi nkolo na yango, ane mpe eyebi elielo oyo nkolo na yango apeselaka yango bilei ; kasi Isalaele ayebi te, bato na Ngai basosoli te. »
Ezala kutu nkongi, kati na likolo, eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu ; ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambila eyebaka ata tango ya kozonga, kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te.