Sik’oyo, boya mpo ete toboma ye mpe tobwaka ye na moko kati na mabulu oyo. Tokoloba ete nyama mabe eliaki ye. Bongo tokotala oyo ekoya sima na bandoto na ye.
Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa makila ya moto oyo asali mabe te. Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ; kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.
Saulo alukaki koboma ye na nzela ya likonga na ye. Kasi Davidi akimaki ye, mpe likonga ekotaki na mir. Na butu wana, Davidi alongaki kokima mpe abikaki.