Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 1:11 - Mokanda na Bomoi

11 Soki balobi na yo : « Yaka elongo na biso, tika ete tosala motambo mpo na koboma bato, tokosepela mpo na kokanga moto oyo ayebi likambo te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 1:11
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazali lokola nkosi oyo etondi na posa makasi ya kokanga nyama, lokola nkosi ya kanda makasi kati na ebombamelo na yango.


Mpo ete, na kozanga tina, mpo na kokanga ngai, batielaki ngai mitambo mpe batimolaki mabulu,


Babongolaka maloba na ngai mikolo nyonso ; mabongisi na bango nyonso ezalaka mpo na kosala ngai mabe.


pamba te makolo na bango ekimaka mbangu mpo na kolanda mabe, mpe bapotaka mbangu mpo na kosopa makila.


Kasi bango, batiaka mitambo mpo na kosopa makila na bango moko, bamilukelaka pasi na bomoi na bango.


Maloba ya bato mabe ezali mitambo mpo na kosopa makila, kasi maloba ya bayengebene ebikisaka bango.


Yo moto mabe, komeka te kotia mitambo kati na ndako ya moto ya sembo, mpe komeka te kopanza yango,


Moto oyo akabolaka biloko elongo na moyibi amiyinaka ; ayokaka bilakeli mabe, kasi amekaka te kofunda ye.


Ezali na bato oyo minu na bango ezali lokola mipanga, lokola mbeli mpo na koboma babola kati na mokili mpe bato bakelela kati na bato.


Ngai namonanaki lokola mwana meme oyo bazali komema na esika oyo babomelaka bibwele ; nayebaki te ete bazali kosalela ngai likita tango bazalaki koloba : « Tika ete tobebisa nzete mpe mbuma na yango, tika ete tolongola ye na mokili ya bato ya bomoi mpo ete bakanisa lisusu kombo na ye te. »


Kati na bato na Ngai, ezali na bato mabe oyo banongaka bato lokola moto oyo azali kotia mitambo mpo na kokanga bandeke, mpe batiaka mitambo mpo na kokanga bato.


Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.


Kasi ezali mpo ete liloba oyo ekomama kati na mibeko na bango ekokisama : « Bayinaki Ngai kaka pamba. »


Bino mpe bato ya Likita-Monene, bokende sik’oyo epai ya mokonzi ya basoda mpe bosenga ete bamema Polo liboso na bino, lokola nde bolingi koyekola malamu likambo na ye. Bongo na ngambo na biso, tosili komibongisa mpo na koboma ye liboso ete akoma awa.


mpo ete asalela bango ngolu ya kotinda Polo na Yelusalemi, pamba te basalaki mabongisi ya kotiela ye motambo na nzela mpo na koboma ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ