Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu.
Tango Akana, mwana mobali ya Zera, asalaki lisumu, na koyiba biloko ya bule, boni, etumbu yango ekweyaki te likolo ya lisanga mobimba ya Isalaele ? Akufaki kaka ye moko te likolo ya lisumu na ye. »