Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malashi 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bongo makabo ya Yuda mpe ya Yelusalemi ekosepelisa Yawe, ndenge ezalaki na tango ya kala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malashi 3:4
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe mpo ete Yawe asunga Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, babonzaki lokola mbeka bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali.


Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Abelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ye na moto oyo ewutaki likolo mpe ekweyaki na etumbelo ya bambeka.


Salomo akendeki na etumbelo ya bronze, liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe abonzaki kuna bambeka ya kotumba nkoto moko.


Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.


Nzambe, bambeka oyo osepelaka na yango ezali : molimo oyo ebukani. Nzambe, oyinaka te motema oyo etutami mpe emikitisi.


nakomema bango na ngomba na Ngai ya bule mpe nakopesa bango esengo kati na Ndako epai wapi basambelaka Ngai. Bambeka na bango ya kotumba mpe makabo na bango ekondimama na etumbelo na Ngai, pamba te Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso. »


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Siona mpe nakovanda kati na Yelusalemi. Boye, Yelusalemi ekobengama Engumba ya bosolo ; mpe ngomba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ekobengama Ngomba ya bule. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ