atalaki na ngambo ya Sodome mpe ya Gomore, mpe na ngambo ya mokili ya etando ; amonaki molinga makasi komata wuta na mokili lokola molinga ya fulu monene ya moto.
Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te : « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka ? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso ? »
Boni, bokoyika kaka mpiko to maboko na bino ekozala kaka makasi na mokolo oyo nakokitisela bino kanda na Ngai ? Ngai Yawe, nalobaki mpe nakokokisa yango.
Bato mosusu kati na bato ya bwanya bakobeta mabaku, mpo ete bakomisama bato ya kokoka, bapetolama mpe bazangi mbeba, mpo na tango ya suka, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.
Yawe azali koganga lokola kake na liboso ya mampinga na Ye. Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda ; basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. Mokolo ya Yawe ezali monene, ezali somo makasi ; nani akoki kotelema na mokolo yango ?
Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.
Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki : baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.
Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.
Asimbi kiyungulu na loboko na Ye mpo na kopetola etando na Ye mpe mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba matiti oyo ekotikala na nzela ya moto oyo ekufaka te.
Solo, bino, boyebi Ye te ; kasi Ngai, nayebi Ye. Soki nameki koloba ete nayebi Ye te, wana nakozala mokosi lokola bino. Kasi nayebi Ye mpe nabatelaka Liloba na Ye.
Bosala penza keba ete boboya te koyoka Ye oyo alobaka ! Pamba te soki bato wana bazangaki te kozwa etumbu tango baboyaki koyoka Ye oyo azalaki kokebisa bango awa na mokili, ekozala ndenge nini mpo na biso soki toboyi koyoka Ye oyo akebisaka biso wuta na Likolo ?
Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.
Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.