Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malashi 3:17 - Mokanda na Bomoi

17 « Na mokolo oyo nakomonisa nguya na Ngai, bakokoma bato na Ngai, bomengo na Ngai ya talo. Nakobatela bango ndenge tata abatelaka mwana oyo asalelaka ye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malashi 3:17
40 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napesaki lisusu Balevi mitindo ete bamipetola mpe bakende kokengela bikuke mpo na kobatela bule ya mokolo ya Saba. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai lisusu mpo na likambo oyo mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda bolingo monene na Yo !


Akopambola bato oyo batosaka Yawe kobanda na bato pamba kino na bato minene.


Pamba te Yawe aponaki Jakobi, Isalaele, mpo ete azala ya Ye moko.


Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai,


Kasi sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa lisumu na bango, soki te longola kombo na ngai na buku ya bomoi oyo okomaki.


Mobali na ngai ya bolingo azali ya ngai, mpe ngai nazali ya ye ; aleisaka bibwele na ye na bilanga oyo etondi na bafololo oyo babengaka lisi.


Na mokolo wana, nkona ya Yawe ekokoma kitoko mpe nkembo, bongo mbuma ya mabele ekosala lokumu mpe nkembo, ya ndambo ya bana ya Isalaele oyo babiki.


Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi ; Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele : « Kobanga te, pamba te nasikolaki yo, nabengaki yo na kombo na yo, ozali ya ngai.


bato oyo Ngai moko nabongisaki mpo ete bakoka kotatola lokumu na Ngai.


Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.


« Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, » elobi Yawe : « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.


Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo ; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai.


liboso ete mokolo oyo ekatama mpo na kosambisama ekoka, liboso ete mokolo yango eleka lokola matiti ya loso oyo mopepe ememi, mpe liboso ete kanda mpe kotomboka ya Yawe ekomela bino !


Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto ; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango : ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba : ‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › »


Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai ? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo ? ›


Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.


Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.


Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu ?


kasi moto na moto na tango na ye : Klisto akosekwa moto ya liboso ; sima, tango akoya, bato oyo bazali ya Klisto bakosekwa.


Bosikolamaki na motuya makasi penza. Boye, bopesa Nzambe nkembo kati na banzoto na bino.


Mpe, « Nakozala Tata mpo na bino, mpe bino bokozala bana mibali mpe bana basi mpo na ngai, elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »


Bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto babaka na ekulusu bomoto na bango elongo na baposa mpe bilulela na yango.


pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali kati na mokili mpo ete bozala libota ya motuya mpo na Ye.


pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe, Nzambe na bino, aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali na mokili mpo ete bozala bato na Ye, bozwi na Ye moko penza.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ