Ezali lisusu na eloko moko ya pamba oyo elekaka na mokili : bato ya sembo bazwaka lifuti oyo ebongi na bato mabe, mpe bato mabe bazwaka lifuti oyo ebongi na bato ya sembo. Nazali koloba solo ete wana mpe ezali kaka pamba.
bongo bozali koya liboso na Ngai kati na Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai, mpe bozali koloba : ‘ Tobiki na biso ! ’ Bobiki na bino solo mpo na kosala makambo oyo nyonso ya nkele ?
Mbala moko, makambo nyonso oyo elobamaki na tina na Nabukodonozori ekokisamaki. Babenganaki ye na molongo ya bato mpe akomaki kolia matiti lokola ngombe ; mamwe ekomaki kopolisa nzoto na ye kino suki na ye ekomaki milayi lokola masala ya mpongo ya mobange, mpe manzaka na ye lokola manzaka ya ndeke.
Kasi bato yango bakendeki lisusu lisanga epai ya mokonzi Dariusi mpe balobaki na ye : — Mokonzi, kobosana te ete mobeko ya bato ya Medi mpe ya Persi elobi ete mokano moko te to mobeko moko te ya mokonzi ekoki kobongolama.
Bolembisi Yawe na maloba na bino mpe bozali lisusu kotuna : « Tolembisi Yo na likambo nini ? » Ezali tango bozali koloba : « Moto oyo asalaka mabe azali malamu na miso ya Yawe, mpe Yawe asepelaka na ye » to mpe « Wapi Nzambe ya bosembo ? »
Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.
Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »