14 Bozali lisusu koloba : ‹ Kosalela Nzambe ezali na tina te. Litomba nini penza ezali na kotosa mibeko na Ye mpe na komiboya liboso ya Yawe, Mokonzi ya mampinga ?
balobaka : ‹ Mpo na nini tokila bilei, soki ozali komona na Yo yango te ? Mpo na nini tomikitisa, soki ozali koyeba na yo yango te ? › Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei, bozali kosala makambo oyo bolingi mpe bozali konyokola basali na bino nyonso.
Kasi bakozongisa : ‹ Ezali na tina te ! Tokokoba kaka kosala mabongisi ya mitema na biso, mpe moko na moko kati na biso akokoba kaka kolanda baposa mabe ya motema na ye. › »
Sala keba ! Noki te okotikala makolo ngulu mpe okokawuka mongongo likolo ya bitambola-tambola ! Kasi ozali koloba : ‹ Tika na yo ! Ngai nalingaka banzambe ya bapaya mpe nakolanda kaka bango. ›
Bazongelaka te Ye-Oyo-Aleki-Likolo, bazali lokola tolotolo ebeba ; bakambi na bango bakokufa na mopanga likolo ya maloba na bango ezanga limemia. Mpo na yango, bakosambwa kati na Ejipito.
Na tango wana, nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka : ‹ Yawe asalaka na Ye eloko te, ezala ya malamu to ya mabe. ›