Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malashi 3:12 - Mokanda na Bomoi

12 « Bato ya bikolo nyonso bakoloba ete bozali bato ya esengo, pamba te mokili na bino ekozala mokili ya malamu mpo na kovanda, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malashi 3:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ebele bamemaki na Yelusalemi makabo mpo na Yawe mpe bakado ya motuya mpo na Ezekiasi, mokonzi ya Yuda. Wuta tango wana, lokumu ya Ezekiasi emataki makasi na miso ya bikolo nyonso.


Tika ete kombo na ye ewumela libela na libela, ewumela tango nyonso moyi ekozala, mpo ete bato bakoma kotangaka kombo na ye wana bakobanda kopambolanaka, mpe bikolo nyonso ekoma kobengaka ye : moto ya esengo.


Bakitani na bino bakoyebana kati na mabota, mpe bana na bino bakoyebana kati na bikolo ; moto nyonso oyo akomona bino akondima ete bozali bato oyo Yawe apamboli.


Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.


Lokola elenge mobali abalaka moseka, bana na yo ya mibali mpe bakobala yo ; lokola elenge mobali asepelaka na mobandami na ye ya mwasi, Nzambe na yo mpe akosepela na yo.


Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›


Akokota lisusu na makasi na mokili ya kitoko. Bikolo ebele ekokweya, kasi Edomi, Moabi mpe bakonzi ya Amoni bakokima ye.


Bongo, wuta na moko kati na maseke nyonso minei, liseke moko ya moke ebimaki. Ekolaki makasi, mpe nguya na yango ekomaki na ngambo ya sude, ya este mpe na ngambo ya Mokili oyo eleki kitoko.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Na mikolo wana, bato zomi ya bikolo mpe ya nkota ya ndenge na ndenge bakokanga songe ya nzambala ya Moyuda moko mpe bakoloba : ‹ Tika ete tokende elongo na yo, pamba te toyoki ete Nzambe azali na bino elongo. › »


Yawe alobi : « Bozali koloba makambo mabe mpo na kotelemela Ngai. Kasi bozali kotuna : ‹ Maloba nini ya mabe tolobi mpo na kotelemela Yo ? ›


pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye. Yango wana, kobanda lelo, bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo,


Ezali mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, abatelaka ; miso ya Yawe, Nzambe na yo, ezalaka tango nyonso likolo na yango wuta na ebandeli kino na suka ya mobu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ