Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malashi 3:10 - Mokanda na Bomoi

10 Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malashi 3:10
35 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

libanga oyo natelemisi lokola elembo ekokoma Ndako ya Nzambe mpe nakopesa Ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo akopesa ngai. »


Tango Noa akokisaki mibu nkama motoba ya mbotama, na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na sambo, bitima nyonso ya se mpe maninisa nyonso ya likolo efungwamaki.


Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi agumbamaka mpo na loboko na ye, alobaki na moto na Nzambe : — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema ? Mpe Elize, moto na Nzambe, azongisaki : — Okomona yango na miso, kasi okolia yango te.


Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi ya Isalaele azalaki kotiela motema alobaki na moto na Nzambe : — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema ? Elize azongisaki : — Okomona yango na miso na yo, kasi okolia yango te.


Balevi mosusu lokola Ayiya, bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo mpe biloko ya bule.


Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,


Na tango ya Zorobabeli mpe ya Neyemi, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kopesa, mikolo nyonso, biloko oyo ekatama mpo na babeti mindule mpe bakengeli bikuke ; bazalaki mpe kopesa biloko ya bule epai ya Balevi, bongo Balevi mpe, na ngambo na bango, bazalaki kopesa biloko ya bule epai ya bakitani ya Aron.


apesaki Tobiya, ndeko na ye, shambre monene oyo, na kala, ezalaki ebombelo ya makabo ya ble, ansa, bisalelo ya Tempelo, eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta, biloko oyo Mibeko ekata ete ezali mpo na Balevi, bayembi mpe bakengeli bikuke ; mpe makabo oyo epesamaka mpo na Banganga-Nzambe.


Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu, vanda kati na mokili mpe lia na kimia.


Nzokande, apesaki mitindo na mapata mpe afungolaki bikuke ya likolo,


Soki mapata etondi na mayi, ebetisaka mvula na mokili. Nzete etikalaka kaka na esika oyo ekweyi, ezala na ngambo ya sude to na ngambo ya nor.


Nakokomisa lipamboli esobe elongo na bazamba mpe bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba na Ngai ya moke ; nakobetisa bamvula na tango na yango : ekozala bamvula ya mapamboli.


Bambuma ya liboso oyo ya kitoko mpe makabo na bino nyonso, kolongola ata eloko moko te, ekozala ya Banganga-Nzambe ; bokopesa bango bambuma ya liboso ya bilanga na bino ya ble mpo ete mapamboli ezala kati na bandako na bino.


Nakolinga yo lokola mwasi na ngai mpo na libela, nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo mpe na bosembo, na bolingo mpe na esengo.


Yawe akoyanola mpe akoloba na bango : « Nakotindela bino ble, vino ya sika mpe mafuta ; bongo bokotonda yango. Nakokomisa bino lisusu te eloko ya kotiola kati na bikolo.


Etando oyo batutelaka ble ekotonda na bambuma, banzungu ekotonda na vino mpe na mafuta.


Bambuma ya bilanga na bino ekozala penza ebele mpe ekosala ete bokolia tango molayi bambuma oyo bokozala na yango kati na bibombelo ; kino bokokaba mosusu mpo ete bokotisa bambuma ya sika.


Soki botosi mibeko na Ngai, soki botosi mitindo na Ngai mpe bosaleli yango,


Eteni nyonso ya zomi ya biloko nyonso oyo ekowuta na mabele, ezala bambuma ya bilanga to bambuma ya banzete, ezali ya Yawe : ezali bule mpo na Yawe.


Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma ? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma. Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. »


Napesi lokola libula, epai ya Balevi, biteni nyonso ya zomi oyo ekozwama kati na Isalaele lokola lifuti ya mosala oyo basalaka kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.


Ezali kuna nde bokomema bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, eteni na bino ya zomi, bakado ya ndenge na ndenge, makabo mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko mpe bana mibali ya liboso ya bangombe, ya bameme mpe ya bantaba na bino.


Mibu nyonso, bokotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo bilanga na bino ekobota.


Na bongo, Balevi oyo bazali na eteni ya mabele te to na libula te mpo na bango moko elongo na bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bavandaka na bingumba na bino, bakoya kolia mpe kotonda mpo ete Yawe, Nzambe na bino, akoka kopambola bino na misala na bino nyonso ya maboko.


Mpo na bolamu na yo, Yawe akofungola likolo, ebombelo ya bamvula na Ye, mpo na konokisa mvula na mokili na bino na eleko ya malamu ; mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Bikolo ebele ekodefa epai na bino, kasi bino bokodefa ata na ekolo moko te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ