Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malashi 2:9 - Mokanda na Bomoi

9 « Boye, nasalaki ete botiolama mpe bosambwa liboso ya bato nyonso, pamba te bolandaki banzela na Ngai te, kasi bozalaki kopona bilongi na makambo oyo etali mibeko. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malashi 2:9
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mishe alobaki : — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te ! Abakisaki : — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi !


Nakopona bilongi te, nakobondela mpe moto moko te ;


Makanisi ya moto ya sembo ezali na lipamboli, kasi bakobosana kombo ya moto mabe.


Bwanya epesaka moto lokumu, kasi motema mabe ememaka kotiolama.


Nakopasola bitambala na bino mpe nakokangola bato na Ngai na maboko na bino ; bakokweya lisusu te na se ya bokonzi na bino ! Mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.


Pasi likolo ya pasi nde ekokomela bango, basango ya mabe na ya mabe nde ekolandana. Bakoluka bimoniseli na pamba epai ya basakoli ; Banganga-Nzambe bakokoka lisusu te koteya malakisi ya Mobeko, mpe bakambi bakozanga toli ya kopesa.


Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »


Nakobwakela yo bosoto, nakosambwisa yo mpe nakokomisa yo eloko ya maseki.


Likolo na bino, nakopamela bakitani na bino, nakobwakela bino basalite ya banyama na bino na bilongi, salite ya banyama oyo bobonzaka na mikolo ya bafeti na bino, mpe bakomema bino nzela moko na basalite yango.


Kasi bino, bopengwi na nzela mpe bobetisi bato ebele mabaku na malakisi na bino ; bobebisi boyokani elongo na Balevi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Kasi molakisi ya Mobeko alingaki kolakisa ete azali sembo, boye atunaki na Yesu : — Nani azali moninga na ngai ?


Mawa na bino, Bafarizeo ! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.


Bato oyo bazalaki bakambi babakisaki ata eloko moko te na mateya na ngai ; lokumu nyonso oyo bazalaki na yango ezalaki na motuya moko te epai na ngai, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.


Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso : azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. »


Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ