Malashi 2:7 - Mokanda na Bomoi7 Pamba te bibebu ya Nganga-Nzambe esengeli kobatela boyebi, mpe bato basengeli kozwa boyebi na monoko na ye mpo ete azali ntoma ya Yawe, Mokonzi ya mampinga. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »
Banganga-Nzambe na yango bazali kobuka mobeko na Ngai mpe bazali kobebisa bosantu ya biloko na Ngai ya bule, bazali kosala bokeseni te kati na biloko ya bule mpe biloko mosusu, bazali kosunga bato te ete bayeba kosala bokeseni kati na makambo oyo ezali mbindo mpe oyo ya peto ; bakangeli Basaba na Ngai miso, boye babulisi Ngai te kati na bango.