Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malashi 2:6 - Mokanda na Bomoi

6 Monoko na ye ezalaki kobimisa malakisi ya solo ; lokuta etikalaki komonana na bibebu na ye te. Azalaki kotambola elongo na Ngai na kimia mpe na alima. Na nzela na ye, bato ebele batikaki kotambola na nzela ya masumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malashi 2:6
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.


Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.


Bosembo na Yo ekotikala bongo mpo na libela, ekotikala kobongwana te ; mpe mibeko na Yo ezali solo.


Nzokande Yo, Yawe, ozali pene, mpe mibeko na Yo nyonso ezali bosolo.


Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya, mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo.


Tala malamu moto oyo azangi pamela, landela bomoi ya moto ya sembo ; tango oyo ezali koya ezali kozela moto ya kimia.


mpo ete ozala na bososoli, mpe bibebu na yo ebomba boyebi.


Soki solo bazalaki na mayangani na Ngai, balingaki nde koloba maloba na Ngai epai ya bato na Ngai, mpe bato na Ngai balingaki kotika banzela mpe misala na bango ya mabe !


Bato oyo batambolaki na bwanya bakongenga lokola pole ya mapata ; mpe bato oyo bakolakisa bato ebele nzela ya bosembo, bango mpe bakongenga lokola minzoto libela na libela.


Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.


Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu : — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te ;


Tango bakomaki epai na Ye, balobaki : — Moteyi, toyebi ete ozali moto ya sembo mpe obangaka bato te, pamba te oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. Boni, Mobeko na biso epesi solo nzela ya kofuta mpako ya Sezare to te ? Tosengeli penza kofuta yango ?


Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo.


Banongi yango batunaki Yesu : — Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ya sembo, mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe.


mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »


Ateyaka makebisi na Yo epai ya Jakobi, mpe mibeko na Yo epai ya Isalaele ; abonzaka ansa liboso na Yo, mpe mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo na Yo.


Mpo na Levi, alobaki : « Urimi mpe Tumimi na Yo ezali mpo na moyengebene oyo omekaki ye motema na Masa, mpe oyo owelanaki na ye na mayi ya Meriba,


oyo atalisaki bolingo epai na Yo koleka, bolingo epai ya baboti na ye, bandeko na ye mpe bana na ye moko, mpo na kotosa maloba na Yo mpe kobatela boyokani na Yo.


Lokuta emonanaki te kati na minoko na bango ; bazali bato bazanga pamela.


Bana mibali ya Eli bazalaki kilikili, bayebaki Yawe te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ