Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malashi 2:17 - Mokanda na Bomoi

17 Bolembisi Yawe na maloba na bino mpe bozali lisusu kotuna : « Tolembisi Yo na likambo nini ? » Ezali tango bozali koloba : « Moto oyo asalaka mabe azali malamu na miso ya Yawe, mpe Yawe asepelaka na ye » to mpe « Wapi Nzambe ya bosembo ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malashi 2:17
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, moto oyo ayinaka bosembo akoki solo kozala mokonzi ? Okokweyisa solo Nkolo-Na-Bosembo mpe Nkolo-Na-Nguya ?


Oh ! Tika ete Yobo asambisama kino na suka mpo ete apesa biyano lokola moto mabe !


Kasi soki sik’oyo ozali kosala lokola moto mabe, etumbu mpe kosambisama ekokweyela yo.


Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe, Nzambe azipaka miso ya basambisi na yango. Soki ezali Ye te, ezali nani ?


Soki etumbu epesami noki te mpo na mabe oyo esalemi, mitema ya bato etondaka na makanisi ya kosala mabe.


Motema na Ngai eyini bafeti na bino wana ya ebandeli ya sanza mpe bafeti na bino wana ekatama. Ekomi penza mokumba mpo na Ngai, nalembi komema yango.


Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkuku mpo na kobombela Yawe mabongisi na bango ; bato oyo basalaka misala na bango na molili mpe balobaka : « Nani akoki komona biso ? Nani akoyeba ? »


Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu, atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa. Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo : Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !


Kasi obelelaki Ngai te, oh Jakobi, pamba te olembaki Ngai, oh Isalaele.


Osombelaki Ngai te biloko ya solo kitoko na motuya ya mbongo, mpe otondisaki Ngai te na mafuta ya mbeka na yo, kasi onyokolaki Ngai nde na masumu na yo mpe olembisaki Ngai na mabe na yo.


Boye Ezayi alobaki : — Boyoka sik’oyo, bino libota ya Davidi ! Ekoki kaka te mpo na bino kolembisa mitema ya bato ? Boni, bolingi lisusu kolembisa motema ya Nzambe na ngai ?


Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?


Osundolaki Ngai, » elobi Yawe, « opesaki Ngai mokongo. Yango wana, loboko na Ngai ekobeta yo, mpe nakobebisa yo ; nakoyokela yo lisusu mawa te.


Tala, bato oyo bazali koloba na ngai : « Wapi Liloba na Yawe ? Tika ete ekokisama sik’oyo ! »


Yawe akokaki lisusu te kokanga motema liboso ya misala na bino ya mabe mpe ya nkele ; ezali mpo na yango nde mokili na bino ekomi elanga ya libebi, etando ebebisama, eloko ya lisuma mpe etikali lisusu na bato te, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.


Lokola obosanaki mikolo ya bolenge na yo mpe opelisaki kanda na Ngai na nzela ya makambo nyonso ya boye, Ngai mpe nakofuta yo kolanda ndenge etamboli na yo ezali, elobi Nkolo Yawe ; boye, okobakisa lisusu makambo mabe te na likolo ya makambo na yo ya mbindo.


Bozali koloba : ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, boyoka ! Boni, nzela na Ngai ezali sembo te ? Ezali banzela na bino te nde ezangi bosembo !


Molimo alobaki na ngai : « Mwana na moto, omoni makambo oyo bakambi ya libota ya Isalaele bazali kosala, moko na moko kati na esika ya bule ya nzambe na ye ya ekeko ? Bazali koloba : ‹ Yawe azali komona biso te, Yawe asili na Ye kosundola mokili ! › »


Azongiselaki ngai : — Lisumu ya libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda eleki monene makasi penza. Mokili etondi na makila, mpe engumba etondi na kozanga bosembo ; pamba te bazali koloba : « Yawe asundoli mokili ; Yawe azali komona eloko moko te. »


Sik’oyo, nakonyata bino ndenge shar oyo etonda na maboke ya bambuma enyataka biloko.


Na tango wana, nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka : ‹ Yawe asalaka na Ye eloko te, ezala ya malamu to ya mabe. ›


Bozali kotuna : « Mpo na nini boye ? » Ezali mpo ete Yawe azali Motatoli kati na yo mpe mwasi na yo ya bolenge, kasi yo okosaki ye. Nzokande, azali mwasi oyo okangani na ye na nzela ya boyokani.


Boni, moto akoki solo kokosa Nzambe ? Nzokande bino, bozali kokosa Ngai. Kasi bozali koloba : ‹ Tokosi Yo na likambo nini ? › Bokosi Ngai na eteni na bino ya zomi mpe na makabo.


Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.


Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo, mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te, pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso mpe asambisaka misala nyonso ya bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ