Malashi 2:12 - Mokanda na Bomoi12 Mpo na mobali nyonso oyo akosala bongo, azala nani, tika ete Yawe alongola ye na bandako ya kapo ya Jakobi, ata amemi makabo epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.
« Yebisa libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosambwisa bosantu ya Esika na Ngai ya bule oyo esalaka lolendo na bino, oyo esepelisaka miso na bino mpe esalaka esengo ya mitema na bino. Bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo botikaki na Yelusalemi bakokufa na mopanga.
Bozali koloba lisusu : ‹ Mokumba nini lisusu oyo ! › Bozali mpe kotiola Ngai lisusu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Tango bozali komema bibwele oyo ezoka, oyo etambolaka tengu-tengu to oyo ezali na bokono, mpe bozali kobonza yango lokola mbeka, boni, nandima yango na maboko na bino ? » elobi Yawe.
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.