Malashi 1:9 - Mokanda na Bomoi9 « Sik’oyo, bozali mpe kobondela Nzambe ete asalela bino ngolu na makabo ya lolenge oyo na maboko ! Boni, andima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tika ete Banganga-Nzambe oyo basalelaka Yawe balela na kati-kati ya ndako moke ya kokotela mpe etumbelo. Tika ete baloba : « Oh Yawe, bikisa bato na Yo, kokomisa te libula na Yo eloko ya kotiola to eloko ya maseki kati na bikolo. Mpo na nini bato ya bikolo mosusu baloba : ‹ Wapi Nzambe na bango ? › »