Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malashi 1:8 - Mokanda na Bomoi

8 Ezali tango bobonzaka lokola mbeka nyama oyo ekufa miso ; boni, yango ezali mabe te ? Bomeka nanu kopesa yango epai ya moyangeli na bino ; boni, akosepela na bino ? Akondima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malashi 1:8
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi sik’oyo, bokamata bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali ; bokende epai ya Yobo, mosali na Ngai, botumba mbeka mpo na bino moko. Yobo, mosali na Ngai, akobondela mpo na bino ; mpe mpo na kondima na ye, nakoyamba libondeli na ye mpo ete nasalela bino te kolanda bozoba na bino. Pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki. »


Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule mpe apesa yo makasi wuta na Siona.


Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo : « Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola, bavandaka esika moko te. Yango wana, Yawe asepelaka na bango te, akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango. »


Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni ; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango : bakozonga na Ejipito.


Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, na mokolo ya liboso ya sanza ya motoba, Yawe alobaki na nzela ya Mosakoli Aje liloba oyo epai ya Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; epai ya Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe :


« Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai ? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino.


Bozali kotia bilei ya mbindo na etumbelo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tokomisi etumbelo na Yo mbindo ? › Ezali tango bolobaka : ‹ Mesa ya Yawe ezali na tina te. ›


Soki ebwele yango ezali na mbeba to ezali tengu-tengu to ekufa miso to soki ezali na mbeba mosusu ya makasi, bokoki kobonza yango te epai na Yawe, Nzambe na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ