Boye, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi, akomisaki bango eloko ya kobanga, ya somo mpe ya kotiola, ndenge bokoki komona yango na miso na bino.
Okoya kobundisa libota na Ngai, Isalaele, ndenge mapata ezipaka mokili. Oh Gogi, na mikolo ekoya, nakosala ete obundisa mokili na Ngai mpo ete bikolo mosusu eyeba Ngai tango Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na yo na miso na bango.
Bavandi ya bingumba ya Isalaele bakobima, bakopelisa moto, bakotumba bibundeli nyonso : banguba ya mike mpe banguba ya minene, matolotolo mpe makonga ya mike, banzete mpe makonga ya minene ; bakopelisela yango moto mibu sambo.
Boye, akozala kimia na bango ! Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi kati na mokili na biso mpe na bandako na biso, oyo batonga makasi, tokotindela bango babateli sambo ya bibwele mpe bakambi mwambe ya bato mpo na kobundisa bango.
Bomonaki bino moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki na Bala ya Peori : abomaki kati na bino bato nyonso oyo bamipesaki na kosalela Bala ya Peori.
Batata na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi, mpe Yawe atiaki molili kati na bino mpe bato ya Ejipito, azindisaki bango na mayi ya Ebale monene oyo ezipaki bango. Miso na bino moko emonaki makambo oyo nasalaki bato ya Ejipito. Mpe bowumelaki mibu ebele na esobe.