Yawe alobaki na ye : « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo ; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki. »
Zelo ya esobe ekobongwana liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka ekokoma bitima ya mayi. Matiti, nzete oyo ebotaka na mayi mpe papirisi ekobota na bisika oyo mbwa ya zamba elalaka.
Kasi nakotika Ezawu bolumbu, mpe nakobimisa polele ebombamelo na ye, bongo akokoka lisusu komibomba te. Bana na ye ya mibali to bandeko na ye to mpe bazalani na ye bakosila kokufa ; moko te akotikala na bomoi.
Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na kotelemela Edomi, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela bavandi ya Temani : ‹ Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.
« Atsori ekokoma esika oyo mbwa ya zamba evandaka, esika oyo etikala pamba mpo na libela : moto moko te akovanda lisusu kuna mpe moto moko te akowumela lisusu kati na yango. »
Na tina na Edomi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, engumba ya Temani etikali lisusu na bato ya bwanya te ? Bato ya mayele batikali lisusu na bososoli te ? Boni, bwanya na bango esili penza ?
Bobaluka mpe bokima, bokende kobombama na madusu ya mabanga, bino bavandi ya engumba Dedani ! Pamba te nakotindela Ezawu pasi tango nakopesa ye etumbu.
Siona, mboka kitoko, etumbu na yo ekosila ; Nzambe akomema yo lisusu na bowumbu te. Kasi yo Edomi, mboka kitoko, Nzambe akopesa yo etumbu mpo na mabe na yo, mpe akobimisa masumu na yo na polele.
Nazali kolandela likambo na bino mpe nazali kotala bino na liso ya ngolu ; bakobalola bino lisusu ndenge babalolaka mabele ya bilanga mpe bakolona lisusu bankona na mabele na bino.
— Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.