Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malashi 1:14 - Mokanda na Bomoi

14 « Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malashi 1:14
39 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki tata na ngai asimbi ngai, akososola ete nalingi kokosa ye ; wana nakomibendela bilakeli mabe na esika ete napambolama.


Kasi mokonzi alobaki na Orina : — Te ! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango ; naboyi kobonzela Yawe, Nzambe na ngai, bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele. Boye, Davidi asombaki etando mpe bangombe yango, na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano.


Bikolo ekotosa Yawe, mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima nkembo na Yo.


Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.


Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo ! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.


Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.


Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, kati na engumba ya Nzambe na biso, ngomba na Ye ya bule.


Bosakola ete nguya ezali ya Nzambe oyo nkembo na Ye ezali na Isalaele, mpe nguya na Ye ezali kati na mapata.


Epai ya Yawe, Nzambe na bino, bopesa bilaka mpe bokokisa yango. Tika ete bato nyonso oyo bazingeli Ye bamemela Nzambe ya somo makabo !


Pamba te Yawe azali Nzambe Monene, azali Mokonzi Monene, na likolo ya banzambe nyonso.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.


Lokola Ngai nazali na bomoi, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « monguna oyo azali lokola ngomba Tabori kati na bangomba, lokola ngomba Karimeli pembeni ya ebale monene, azali koya !


Tika ete moto oyo asalelaka Yawe na kozanga komipesa alakelama mabe ! Tika ete moto oyo apelisaka mopanga na ye mpo ete etangisa makila alakelama mabe !


Mokili ya Moabi ekobebisama, mpe bakobotola bingumba na yango na makasi ; bilenge mibali oyo Moabi etielaka motema bakokufa na mopanga, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Nasambelaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe natubelaki : « Nkolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya nguya, Yo oyo obatelaka boyokani na Yo ya bolingo, elongo na bato nyonso oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo ;


Yawe akoyokisa bango somo tango akobebisa banzambe ya bikeko nyonso ya mabele. Bato ya bikolo nyonso bakogumbamela Ye na bisika nyonso, moto na moto na esika oyo akozala kati na mokili na ye.


Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Ezali tango bobonzaka lokola mbeka nyama oyo ekufa miso ; boni, yango ezali mabe te ? Bomeka nanu kopesa yango epai ya moyangeli na bino ; boni, akosepela na bino ? Akondima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Sik’oyo, bino Banganga-Nzambe, likebisi oyo epesami epai na bino :


Bozali na se ya elakeli mabe, pamba te bino nyonso, ekolo oyo mobimba, bozali kokosa Ngai.


akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na bato ya bilongi mibale, na esika oyo ekozala kolela mpe koswa minu.


to na kombo ya mokili, pamba te mokili ezali enyatelo makolo ya Nzambe ; to mpe na kombo ya Yelusalemi, pamba te Yelusalemi ezali engumba ya Mokonzi Monene.


Mwasi oyo asali likambo oyo akoki, asili kosopela nzoto na Ngai malasi mpo na kobongisa kokundama na Ngai.


nkolo ya mosali yango akozonga na mokolo oyo ye, mosali, azali kozela ye te, mpe na ngonga oyo ayebi te. Boye akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na basali oyo bazangi bosembo.


Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.


Tango bosaleli te maloba nyonso ya mibeko oyo ekomami na buku oyo mpe botosi te Kombo ya lokumu mpe ya somo, Yawe, Nzambe na bino ;


na tango oyo ekatama na Ye oyo azali Nkolo-Na-Esengo, Nkolo se moko na nguya nyonso, Mokonzi ya bakonzi, Nkolo ya bankolo,


Pamba te Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.


Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.


Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ