9 Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apekisaki bango koloba ata na moto moko, makambo oyo bawutaki komona kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
Pamba te, ndenge Yona avandaki kati na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, ndenge wana mpe Mwana na Moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na se ya mabele.
Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
mpo na koloba na ye : — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana ! Tango azalaki na bomoi, alobaki : « Sima na mikolo misato, nakosekwa. »
mpe Yesu alobaki na ye : — Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
Sima na mongongo yango koloba, bamonaki ete Yesu azali Ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango mpo na bango moko mpe, na mikolo wana, bayebisaki ata na moto moko te makambo oyo bamonaki.