Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 9:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mbala moko, bamonaki Eliya elongo na Moyize bazali kosolola na Yesu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 9:4
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te basakoli nyonso mpe Mobeko basakolaki yango bango nyonso kino na tango ya Yoane.


bilamba na Ye ekomaki kongenga, ekomaki pembe makasi ; moto moko te kati na mokili akoki kobimisa pembe ya ndenge wana.


Petelo alobaki na Yesu : — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Tokotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya.


Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.


Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »


Bazongisaki : — Bamoko bazali koloba ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli ya kala oyo asili kosekwa.


Bokundolaka Makomi na bokebi, mpo ete bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango ; nzokande, Makomi yango etatolaka na tina na Ngai,


Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe ! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ