Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 9:3 - Mokanda na Bomoi

3 bilamba na Ye ekomaki kongenga, ekomaki pembe makasi ; moto moko te kati na mokili akoki kobimisa pembe ya ndenge wana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 9:3
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, nabotamaki kati na lisumu ; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.


Boni, bokokoba kolala pongi kati na bandako na bino ? Mapapu ya ebenga ezipami na se ya palata, mpe bansala na yango ezipami na se ya wolo.


Boya sik’oyo, tosilisa likambo, » elobi Yawe. « Ezala masumu na bino ezali motane makasi, ekokoma pembe lokola mvula ya pembe ; ata ezali motane lokola ngola, ekokoma lokola bapwale ya meme.


Wana nazalaki kotala, namonaki bazali kotanda bakiti ya bokonzi, mpe Mpaka oyo azala liboso ya tango avandaki na moko kati na bakiti yango. Bilamba na Ye ezalaki pembe lokola mvula ya pembe, suki ya moto na Ye ezalaki pembe lokola bapwale ya meme, oyo basukola malamu. Kiti ya Bokonzi na Ye ezalaki lokola moto, mpe bapine na yango ezalaki lokola moto oyo ezali kongala.


Azalaki kongenga lokola mikalikali, mpe bilamba na ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe.


Mbala moko, bamonaki Eliya elongo na Moyize bazali kosolola na Yesu.


Wana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali.


Kornei azongisaki : — Eleki mikolo misato, na ngonga lokola oyo, ngonga ya misato sima na midi, nazalaki kosambela kati na ndako na ngai. Mbala moko, moto moko alata bilamba ya kongenga makasi atelemaki liboso na ngai


mpo ete bolia misuni ya bakonzi, ya bakonzi ya mampinga, ya bilombe, ya bampunda elongo na batambolisi na yango mpe ya bato nyonso : bawumbu to bansomi, bato minene to bato pamba. »


Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.


Sima na makambo wana, namonaki ebele ya bato oyo moto ata moko te akokaki kotanga ; bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya Bokonzi mpe liboso ya Mpate, balataki banzambala ya pembe mpe basimbaki mandalala na maboko na bango ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ