2 Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi epai wapi bazalaki kaka bango moko. Yesu abongolamaki na miso na bango :
Pamba te akolaki liboso na Ye lokola nzete ya moke, lokola mosisa oyo ebimi na esobe ; azalaki ata na kitoko to lokumu te oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye ; lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye.
Tango Yesu ayokaki sango yango, azwaki bwato mpo na kokende kati na esobe, na esika oyo akozala kaka Ye moko. Wana ebele ya bato bayokaki bongo, babimaki na bamboka na bango mpe balandaki Yesu na makolo.
Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.
Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.