Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela.
Yesu apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye : « Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo ; yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge nini ayokeli yo mawa. »
Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.
Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.
Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.