Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 7:6 - Mokanda na Bomoi

6 Yesu azongiselaki bango : — Bato ya bilongi mibale ! Mosakoli Ezayi asakolaki penza malamu na tina na bino, kolanda ndenge ekomama : « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 7:6
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nkolo alobi : « Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko, bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai ; mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngai ezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango.


Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.


Mpe soki nasalaki te, kati na bango, misala wana oyo moto ata moko te asalaki, balingaki te kozala na ngambo ya lisumu. Kasi sik’oyo, atako bamonaki misala yango, bazali kaka kokoba koyina biso : Ngai mpe Tata na Ngai.


Kutu nayebi bino malamu, nayebi ete, kati na mitema na bino, bozali na bolingo te mpo na Nzambe.


Tango bakomaki pene ya kozonga, bango na bango batikalaki kaka koyokana te ; bongo Polo abakisaki liloba oyo : — Molimo Mosantu alobaki na bakoko na bino makambo ya solo tango alobaki na nzela ya mosakoli Ezayi :


bakobanda komilakisa lokola nde bazali na botosi kati na makambo ya Nzambe, nzokande bawanganaka nguya na yango. Kima bato ya lolenge wana !


Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ