Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 7:5 - Mokanda na Bomoi

5 Boye, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko batunaki Yesu : — Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Mpo na nini bazali kolia na maboko ya mbindo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 7:5
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Pamba te basukolaka maboko na bango te liboso ya kolia.


Na bongo, bokomisaka pamba Liloba na Nzambe na nzela ya bokoko oyo bolakisaka. Mpe bosalaka makambo mosusu ebele ya lolenge wana.


Botiaka mibeko ya Nzambe pembeni mpo na kotosa bokoko ya bato.


Alobaki na bango lisusu : — Boyebi malamu penza kosundola mibeko ya Nzambe mpo na kobatela bokoko na bino.


Nzokande, bayokaki sango ete oteyaka na Bayuda nyonso oyo bavandaka kati na bato ya bikolo ya bapaya ete batosa te Mobeko ya Moyize, mpe ete olobaka na bango ete bakata lisusu te ngenga ya bana na bango mpe batika kosalela bokoko ya Bayuda.


Zwa bango, mipetola elongo na bango mpe futela bango mbongo mpo ete bakatisa suki. Na bongo, bato nyonso bakoyeba ete sango oyo bazali koyoka na tina na yo ezali ya lokuta, mpe bakososola ete yo moko mpe otosaka Mobeko.


mpe tata ya bato oyo bakatisa ngenga, ba-oyo bakatama ngenga kaka te, kasi balandaka mpe ndakisa ya kondima oyo Abrayami, tata na biso, azalaki na yango liboso ete bakata ye ngenga.


Kati na lingomba ya Bayuda, nazalaki komata koleka Bayuda ebele ya ekeke na ngai, oyo tozalaki na bango mibu moko ya mbotama ; nalekaki bango kutu na bolingo eleka ndelo mpo na bokoko ya batata na ngai.


Tozali koyoka ete mingi kati na bino bazali bagoyigoyi mpe bazali kotambola na bomoi ya mobulu, bazali kosala eloko moko te, kasi bazali kaka kokota na makambo ya bato mosusu.


Bandeko, totindi bino na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto ete bokima ndeko nyonso oyo atambolaka na bomoi ya mobulu mpe alingaka te kotambola kolanda malakisi oyo bozwaki kowuta na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ