Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 7:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mpe soki bawuti na esika oyo bato ebele bakutanaka, baliaka te soki bamipetoli nanu te na mayi. Bazalaki lisusu na mibeko ebele ya bokoko oyo bazalaki kotosa, ndakisa : kosukola bakopo, bambeki, bambeto mpe basani ya bibende.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 7:4
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, nasukoli maboko na ngai mpo na kolakisa ete nasali mabe te, mpe nabandi na etumbelo na Yo,


Bomisukola mpe bomipetola, bolongola misala mabe na bino na miso na Ngai ! Botika kosala mabe !


Natiaki biloko etonda na vino mpe ndambo ya bakopo liboso ya bato ya libota ya Rekabi ; mpe nalobaki na bango : — Bomela masanga ya vino.


Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama. Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe ?


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bosukolaka malamu libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondisaka yango na biloko ya moyibi mpe ya lokoso na bino.


Mofarizeo mokufi miso ! Banda nanu na kopetola kati ya kopo mpe ya sani, bongo libanda ekokoma peto.


Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba : — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino.


Botiaka mibeko ya Nzambe pembeni mpo na kotosa bokoko ya bato.


Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale.


Mokolo moko, bayekoli ya Yoane bazalaki kobendana na Moyuda moko na tina na kopetolama.


Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola : mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.


Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !


Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ