Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.
Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? »
Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso.
Yesu ayokaki mawa makasi kati na molimo na Ye mpe alobaki : « Mpo na nini bato ya ekeke oyo bazali kosenga elembo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : bakopesamela elembo moko te ! »
Lokola Yesu amitungisaki lisusu makasi, akendeki na kunda. Ezalaki kati na ebombamelo ya mabanga oyo, na ekotelo na yango, batiaki libanga moko ya monene.
Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki : Tata, tango ekoki ; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo ;
Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.