Boye, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko batunaki Yesu : — Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Mpo na nini bazali kolia na maboko ya mbindo ?
Nayebi mpe nandimisami kati na Nkolo Yesu ete eloko ya mbindo ezalaka te. Nzokande, soki moto moko amoni ete eloko songolo ezali mbindo, wana ezali mbindo mpo na ye.
Eloko moko te ya mbindo ekokota kuna, mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya nkele mpe alobaka lokuta akokota kuna ; kaka ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi ya Mpate nde bakokota kuna.