Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Malako 6:3 - Mokanda na Bomoi

3 Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? » Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Malako 6:3
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe : « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »


Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !


Wana Yesu azalaki nanu koloba na bato, mama na Ye mpe bandeko na Ye ya mibali batelemaki libanda mpe bazalaki koluka kosolola na Ye.


Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ;


Andre, Filipo, Bartelemi, Matayo, Toma, Jake, mwana mobali ya Alife ; Tade, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote,


Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.


Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !


Moto moko ayebisaki Ye : — Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya komona yo.


Yuda (Yuda Isikarioti te) atunaki Yesu : — Nkolo, mpo na nini komimonisa epai na biso, kasi epai ya mokili te ?


Bakomaki koloba : — Boni, wana ezali Yesu te ? Ezali mwana mobali ya Jozefi te ? Toyebi malamu tata mpe mama na ye ! Bongo ndenge nini azali koloba : « Nawuti na Likolo ? »


Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, kati na etaje epai wapi bazalaki kosangana mbala na mbala. Ezalaki : Petelo, Yoane, Jake, Andre, Filipo, Toma, Bartelemi, Matayo ; Jake, mwana mobali ya Alife ; Simona oyo azalaki moto ya lingomba ya Bazelote ; mpe Jide, mwana mobali ya Jake.


Petelo apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia, mpe ayebisaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu : — Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko mosusu. Sima na yango, abimaki mpe akendeki na esika mosusu.


biso, tozali koteya Klisto oyo babakaki na ekulusu : ezali penza libaku mpo na Bayuda, mpe liboma mpo na Bapagano.


Boni, tozangi makoki ya kolia mpe ya komela ?


Natikalaki komona ntoma mosusu te, longola kaka Jake, ndeko ya Nkolo.


Bopusana pene ya Ye oyo azali Libanga ya bomoi, Libanga oyo bato babwakaki, kasi Nzambe aponaki yango mpo ete ezali motuya mingi na miso na Ye.


Ngai Jide, mowumbu ya Yesu-Klisto mpe ndeko ya Jake ; Epai ya bato oyo Nzambe abenga, ba-oyo Nzambe Tata alingaka, mpe ba-oyo babatelami mpo na Yesu-Klisto :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ