bato oyo bavandaka kati na bakunda mpe balekisaka babutu na bango kati na madusu ya mabanga ; bato oyo baliaka misuni ya ngulu mpe basani na bango etonda na bilei ya mbindo ;
Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale. Bato ebele basanganaki pembeni na Ye. Boye, amataki mpe avandaki kati na bwato, mpe bato nyonso batelemaki na mokili, pembeni ya ebale.
Pamba te, ezalaki na mwasi moko oyo mwana na ye ya mwasi azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezalaki mpe konyokola ye makasi ; boye tango kaka ayokaki sango na tina na Yesu, ayaki komibwaka na makolo ya Ye.
Tango Yesu anyataki mabele, mobali moko abimaki na engumba mpe ayaki kokutana na Ye ; azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Wuta kala, azalaki lisusu te kolata bilamba mpe kovanda na ndako, kasi akomaki kovanda kati na bakunda.
Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye.